Ce document contient le Catéchisme de Heidelberg (1563) en langue lingala parlée en République démocratique du Congo, en République du Congo, en Angola, en Centrafrique et au Soudan du Sud.

34 pages.

Le Catéchisme de Heidelberg en langue lingala Katesismo uta na mboka Heidelberg

Ebandeli ya Katesismo (1)

Eteni ya yambo
MAWA YA MOTO (2 – 4)

Eteni ya mibale
KOKANGOLAMA YA MOTO (5 – 31)

I. Kondima ya Bantoma

    Nzambe Tata
    Nzambe Mwana
    Nzambe Molimo Monsantu 

II. Basakramento Monsanto

    Libatisa Monsanto
    Elambo Monsantu

Eteni ya misato
KOTONDA NZAMBE (32 – 52)

    Mibeko na Nzambe
    Kobondela

EBANDELI YA KATESISMO

EYENGA 1

Motuna 1 : Kati na bomoyi to na kufa, lisungi na yo se moko ezali kowuta wapi?

Kati na bomoyi to na kufa, njoto mpe molimo na ngai ezali ya ngai moko te, ezali nde ya Yesu, Mobikisi na ngai ya solo. Mpo ete na makila na Ye ya motuya, afutaki mpo na masumu na ngai nyonso mpe akangoli ngai na nguya nyonso ya satana. Azali kobatela ngai ete ata suki na ngai moko ya motu ekoki kokueya te soki ezali mokano ya Tata ya Likolo te, Nzambe oyo asali ete makambo nyonso ebonguana mpo na lobiko na ngai. Yango nde, na nguya ya Molimo Monsantu, aloni kati na ngai elikia ya bomoyi ya seko mpe abongisi motema na ngai mpo nazala na bomoyi oyo ezali kokumisa ye tango yonso.

Litangi : Baromen 14:8; 1Bakolinto 6:19; 1Bakolinto 3:23; 1Petelo 1:18; 1Yoane 1:7; 1Yoane 3:8; Yoane 6:39; Matayo 10:29-31; Baromen 8:14-16; 1Yoane 2:1-2; Luka 21:18; 2Bakolinto 1:20-22; Baefese 1:13-14.

Motuna 2 : Makambo boni osengeli koyeba mpo obika to okufa kati na lisungi ya esengo boye?

Bobele makambo misatu,

  • Yambo nayeba mpe nasosola monene ya lisumu mpe mawa ezali na ngai;
  • Ya mibale nayeba nzela nini nakangolami;
  • Ya misatu, nayekola matondi nini nasengeli kopesa Nzambe mpo na kokangolama na ngai.
Litangi : Luka 24:46-48; Tito 3:3-7; Yoane 9:41; 15:22; Baefese 5:8-10; 1Petelo 2:9-10; 1Bakolinto 6:11; Yoane 17:3; Baromen 6:1-2; 12-13.

ETENI YA YAMBO

MAWA YA MOTO

EYENGA 2

Motuna 3 : Na nzela nini oyebeli mawa na yo?

Na mibeko na Nzambe.

Litangi : Baromen 3:20.

Motuna 4 : Mibeko na Nzambe ezali kosenga biso nini?

Yesu Kristo azali koteya biso na mokuse boye : « Okolinga Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo mobimba. Oyo ezali mobeko eleki monene mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, okolinga mozalani na yo lokola ozali komilinga yo moko. Mibeko nyonso na Mose mpe masakoli ikakemi na mibeko oyo mibale. »

Litangi : Matayo 22:37-40; Luka 10:27; Kozongela 6:5; Lewitiko 19:18.

Motuna 5 : Okoki kotosa solo mpenja mibeko oyo?

Te, na lolenge na ngai ya bomoto, natindami ntango nyonso mpo nayina Nzambe mpe mojalani na ngai.

Litangi : Baromen 3:10,23; 1Yoane 1:8,10; Baromen 8:7; Baefese 2:3.

EYENGA 3

Motuna 6 : Solo Njambe akelaki moto mpo azala mabe mpe motomboki bongo?

Te, Nzambe akelaki ye moto malamu, na elilingi na Ye mpenja; elingi koloba ete azalaki na sembo mpe boyengebeni mpo akoka koyeba malamu Nzambe Mokeli na ye, alinga Ye na motema moko mpe avanda na Ye kati na bomengo ya seko, akumisaka Ye mpe apambolaka Ye.

Litangi : Ebandeli 1:26-27,31; 2Bakolinto 3:18; Bakolose 3:9-10; Baefese 4:23-24.

Motuna 7 : Bongo kobeba ya bomoto na biso ewuti wapi?

Kobeba ewuti na kokweya mpe kozanga botosi ya baboti na biso ya liboso Adamu na Eva kati na elanga ya Edeni. Kolandisama na kokweya yango, bomoto na biso esilaki kobeba mpe tozali kobotama kaka na lisumu.

Litangi : Ebandeli 3:1-6; Baromen 5:12,18-19; Njembo 51:7.

Motuna 8 : Solo tobebi kino kozanga makoki ya kosala malamu ata moko te, tobendami kaka mpo na kosala mabe?

Ee, boye. Ebongi kaka tobotama mbala ya mibale na nguya ya Molimo Monsantu.

Litangi : Yoane 3:6; Ebandeli 6:5; Yobo 14:4; Yoane 3:5; Yobo 15:14-16; Yisaya 53:6.

EYENGA 4

Motuna 9 : Solo Njambe azangi sembo te awa apesi moto mibeko oyo akoki kotosa te?

Te. Mpo ete Njambe akelaki ye na lolenge ete akokisa yango. Kasi moto, na bolandi botomboki ya Satana, amilongoli ye mpenza elongo na libota na ye mosika na makabo oyo bobele mpo na botomboki na ye moko.

Litangi : Baefese 4:24-25; Baromen 5:12,18-19.

Motuna 10 : Solo Njambe akozanga kopesa etumbu na bato baboyi kotosa mpe basili kokweya na mobeko na Ye?

Ata moke te. Kasi kanda na Ye ezali kopela mpo na masumu, ezala oyo ya ebandeli to oyo tosalaka mokolo na mokolo; alingi kokata na bosembo nyonso mpe kopesa etumbu ya libela lokola asilaki koloba ete : « akolakelama mabe moto oyo azali kotosa te makambo nyonso makomami na mokanda oyo mpe azali kosalela yango te. »

Litangi : Baromen 5:12; Baebre 9:27; Kozongela 27:26; Bagalatia 3:10.

Motuna 11 : Bongo Njambe azanga nde mawa?

Njambe azali na mawa solo solo, kasi azali mpe na bosembo. Yango wana na boyengebne na Ye asengi ete lisumu nyonso esalami mpe efingisi lokumu na Ye, ezua etumbu na njoto mpe na molimo, etumbu makasi, étumbu ya seko.

Litangi : Kobima 34:6-7; Kobima 20:5; Njembo 5:5; 2Bakolinto 6:14-16.

ETENI YA MIBALE

KOKANGOLAMA YA MOTO

EYENGA 5

Motuna 12 : Lokola tosili komibendela esambiselo ya Njambe, etumbu ya lelo mpe ya libela, na nzela nini tokoki kokima yango mpe kozonga lisusu kati na ngolu ya Njambe?

Njambe alingi ete bosembo na Ye ekokisama. Yango wana esengeli na biso tofuta mpo na masumu nyonso, ezala biso moko, to mpe motu mosusu afutela biso.

Litangi : Kobima 20:5; Baromen 8:3-4; Kobima 23:7.

Motuna 13 : Kasi, biso moko mpenza tokoki kofuta?

Ata moke te. Kutu, nyongo yango ya biso ezali kobakisama mikolo nyonso.

Litangi : Yobo 9:1-3; 15:15-16; Matayo 6:12.

Motuna 14 : Ekelamu nini ezuami esika songolo oyo ekoki kofutela biso?

Ata moko ezali te. Njambe alingi te kopesa etumbu na ekelamu mosusu mpo na mabe ya moto. Lisusu, ekelamu ya pamba ekoki komema mokumba ya kanda ya Njambe mpo na masumu te, mpe ekoki kokangola bikelamu mosusu te.

Litangi : Baebre 2:14; Njembo 130:3.

Motuna 15 : Molobeli mpe Mokangoli ya motindo nini tosengeli koluka?

Bobele oyo azali moto solo, oyo azali bosembo mekee, mpe oyo aleki bikelamu mosusu na makasi, elingi koloba ete azala lisusu Njambe solo.

Litangi : 1Bakolinto 15:21; Yelimiya 23:6; 33:15; Yisaya 53:11; 2Bakolinto 5:21; Baromen 8:3; Baebre 7:15-17; Yisaya 7:14.

EYENGA 6

Motuna 16 : Mpo na nini esengeli azala moto solo mpenza,atonda na sembo?

Mpo bosembo na Njambe esengi ete bomoto oyo esalaki lisumu efuta mpo na masumu. Lisusu, mpo ete moto ya masumu akoki kofutela baninga te.

Litangi : Baromen 5:12-15; 1Petelo 3:18; Yisaya 53:3-5, 10-11.

Motuna 17 : Mpo na nini asengeli kozala mpelamoko Njambe ya solo?

Mpo ete na nguya ya bonjambe akoka komema bozito ya kanda na Njambe kati na bomoto na ye, boye azuela biso mpe azongisela biso bosembo mpe bomoyi.

Litangi : Misala 2:24; 20:28; 1Petelo 3:18; Yoane 3:16; 1Yoane 1:2; Yisaya 53:8.

Motuna 18 : Bongo nani yango Molobeli oyo azali Njambe ya solo mpe motu atonda na sembo?

Ezali nde Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo apesameli biso mpo na kokangolama mpe kozua sembo ya solo.

Litangi : Matayo 1:23; 1Timote 3:16; Luka 2:11; 1Bakolinto 1:30.

Motuna 19 : Oyebeli yango wapi?

Uta na Nsango malamu Monsantu oyo Njambe Ye moko amonisi na ebandeli kuna na Paradizo. Nsango Malamu yango eteyamaki sima na bampaka mpe basakoli; mpe eyei komonana polele na kotumba mbeka na misala mosusu kolandisama na mibeko.Nsango Malamu oyo eyei kokokisama na boyei ya Molingami mpe Muana na Ye ya likinda.

Litangi : Ebandeli 3:15; 22:18; 49:10-11; Baromen 1:2; Baebre 1:1; Misala 3:22-24; 10:43; Yoane 5:46; Baebre 10:7; Baromen 10:4; Bagalatia 4:4.

EYENGA 7

Motuna 20 : Solo bato nyonso babikisami kati na Yesu pelamoko babungaki kati na Adamu?

Te. Kaka baoyo bakangami na Ye njoto moko na nzela ya kondima ya solo mpe bayambi bolamu na Ye nyonso.

Litangi : Yoane 1:12; Yisaya 53:11; Njembo 2:12; Baromen 11:17-24; Baebre 4:2-3; 10:39; Yoane 3:36.

Motuna 21 : Kondima ya solo ezali nini?

Ezali kaka te Koyeba mpe kosimba solo solo nyonso Njambe amonisi kati na Liloba na Ye, kasi ezali mpe elikia ya motema oyo Molimo Monsanto aboti kati na ngai na nguya ya Nsango Malamu, yango ezali kopemisa motema na ngai nasosola ete Njambe alimbisi masumu na ngai lokola alimbisi bamosusu, apesi ngai mpe bosembo na bomengo ya seko, nyonso wana bobele na ngolu mpe na makoki ya Yesu Kristo.

Litangi : Baebre 11:1,3; Baefese 2:8-9; Yakobo 1:8; Baromen 4:16; 5:1; 2Bakolinto 4:13; Matayo 16:17; Bafilipi 1:19,29; Matayo 9:2; Baromen 10:17.

I. KONDIMA YA BANTOMA

Motuna 22 : Nini yango moklisto asengeli kondima?

Bilaka nyonso ezali kati na Nsango Malamu, oyo nyonso Lingomba ya Mokili Mobimba esili kokangisa na mokuse kati na « Kondima ya bantoma ».

Litangi : Yoane 20:31; Matayo 28:20.

Motuna 23 : Elembo yango elobi nini?

Ngai nandimeli Njambe, Ye Tata na Nguya nyonso, Mozalisi ya Likolo pe na se.

Ngai nandimeli Yesu Kristo, Ye Mwana moko na Nzambe, pe Nkolo na biso. Ye oyo atindamaki na Molimo Monsanto, Abotamaki na elenge Malia, anyokolamaki na Pontio Pilato, abakisamaki na ekulusu, akufaki, akundamaki, akitaki na se kati na bakufi, asekwaki kati na bakufi mokolo na misato, abutaki na likolo, azali kofanda na loboko na mobali na Nzambe, Tata na nguya nyonso, akozonga pe lisusu po na kosambisa baoyo bazali na bomoyi pe bakufi.

Ngai nandimeli Molimo Mosanto, na Lingomba na babulami nyonso, na lisanga na babulami, na kolimbisama na masumu, na lisekwa na bakufi, pe na bomoi na seko.

EYENGA 8

Motuna 24 : Ndenge nini tokaboli elembo oyo?

Na biteni misatu :

  • Nzambe Tata pe kokelama na biso
  • Nzambe Mwana pe kobikisama na biso
  • Nzambe Molimo Monsantu pe kobulisama na biso

Motuna 25 : Kasi Njambe azali se moko, boni otangi bato misatu : Tata, Mwana pe Molimo Monsantu?

Mpo ete Njambe amimonisi na motindo yango kati na Liloba na Ye.

Litangi :Kozongela 6:4; Matayo 3:16-17; 28:19; 1Yoane 5:7; Yisaya 61:1; Nyembo 110:1.

NZAMBE TATA PE KOKELAMA NA BISO

EYENGA 9

Motuna 26 : Ozali kondima nini na bolobi ete : « Ngai nandimeli Njambe, Ye Tata na nguya nyonso, Mozalisi ya Likolo pe na se?

  • Ete Tata ya seko ya Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo akelaki lola pe mokili na biloko nyonso ezali kati na yango.
  • Oyo azali kobatela mpe kotambuisa biloko nyonso na liloba na ye ya seko pe na bokambi na Ye.
  • Ye wana akomi Tata na ngai mpe Njambe na ngai mpo na bolingo ya Yesu Klisto.
  • Nazali kolikia epai na Ye mpe nandimi solo ete azali kopesa ngai nyonso ebongi mpo na njoto mpe molimo na ngai. Ye azali kobongola mabe nyonso ezali koyela ngai kati na lobwaku na kufa oyo ete ekoma malamu.
  • Akoki kosala bongo mpo azali Njambe na nguya nyonso. Alingi mpe kosala bongo mpo azali Tata oyo akosaka te.
Litangi : Njembo 33:6; Matayo 7:9-11; 10:29; Baebre 1:3; Yoane 1:12; Bagalatia 4:5-7; Baefese 1:5; Matayo 6:25-26; Baromen 8:28; Ebandeli 1; Njembo 115:1-3.

EYENGA 10

Motuna 27 : Mabongisi na Njambe ezali nini?

Ezali Bokasi na Ye ya nguya nyonso ya Njambe bipai nyonso, na yango nde azali kosimba mpe kotambuisa likolo mpe nse elongo na bikelamu nyonso, ezala matiti mpe milona, mbula to elanga, kobota to kozanga kobota, kolia mpe nzala, maladi to njoto kolongono, bozui to bobola, makambo nyonso ezali kosalama mpamba te, euti na loboko na Ye ya botata.

Litangi : Misala 14:17; 17:25; Yelimiya 5:24; Masese 22:2; Baebre 1:2-4; Yoane 9:3.

Motuna 28 : Koyeba Mabongisi pe bokambi ya Njambe ekosalisa biso na nini?

Mpo tokanga mitema na ntango ya pasi, totonda Njambe na ntango na esengo, tozala na elikia epai na Njambe kati na makambo nyonso, toyeba ete azali Njambe na biso mpe Tata oyo akosaka te. Tososola ete ekelamu moko te ekoki kokabola biso na bolingo na Ye, pamba te asimbi yango nyonso na loboko na Ye mpo eningana te, etambola te soki ezali mokano na Ye te.

Litangi : Baromen 5:3; Yakobo 1:3; Yobo 1:21; Kozongela 8:10; Baromen 8:38-39; Yobo 1:12; Yobo 2:6; Misala 17:28; Masese 21:1; Baromen 5:5-6; 1Batesalonika 5:18.

NJAMBE MWANA MPE KOBIKISAMA NA BISO

EYENGA 11

Motuna 29 : Mpo na nini Mwana na Njambe abengami nkombo Yesu, elakisi Mobikisi?

Mpo ete azali kobikisa biso na masumu na biso; tokoki koluka mpe kozua lobiko na nkombo mosusu te.

Litangi : Matayo 1:21; Baebre 7:25; Misala 4:12.

Motuna 30 : Baoyo bazali koluka bomengo pe lobiko na bango epai na bansantu, kati na bango moko to bipai mosusu, bango pe bandimeli Yesu lokola Mobikisi se moko?

Te. Kasi, bazali kowangana Mobikisi se moko Yesu Klisto ata bazali kovimba na lolendo ete tozali bato na Ye. Makambo ezali kaka mibale: to Yesu azali Mobikisi ya solo te, to mpe baoyo bayambi Ye na kondima ya solo basengeli kozua kati na Ye nyonso esengeli mpo na lobiko na bango.

Litangi : 1Bakolinto 1:21-25; Bagalatia 5:4; Baebre 12:2; Bakolose 1:19; 2:10; Yoane 1:16; 1Bakolinto 1:13-31; Yisaya 9:6.

EYENGA 12

Motuna 31 : Mpo na nini abiangami Klisto, elingi koloba « mopakolami »?

Mpo ete atindamaki na Njambe Tata, mpe apakolamaki na Molimo Monsantu

  • Mpo azala mosakoli mpe Moteyi na biso, Ye nde amonisi biso polele mabombami pe mokano ya Njambe mpo na lobiko na biso.
  • Mpo azala Nganga Njambe na biso monene. Ye nde:na nzela ya komikaba mbeka na njoto na Ye, asikoli biso mpe azali kolobela biso ntango nyonso epai na Tata.
  • Mpo azala Mokonzi na biso ya seko. Ye nde azali kokonza likolo na biso na nzela ya Liloba na Molimo na Ye, azali kobatela pe kosimba biso kati na lobiko oyo azueli biso.
Litangi : Njembo 45:8; Kozongela 18:15; Yoane 1:18; 12:15; Baebre 7:21; 10:12; Baromen 8:34; Njembo 2:6; Luka 1:33; Matayo 28:1; Yoane 10:28; Baebre 1:9; Misala 3:22; Njembo 110:4.

Motuna 32 : Bongo yo, obiangami Moklisto mpo na nini?

Mpo ete nazali eteni ya Klisto na nzela na kondima, boye nazui ndambo na epakolami na Ye

  • mpo natatolaka nkombo na Ye;
  • mpo namikaba na Ye lokola mbeka na bomoyi na ntina ya kotonda Ye;
  • mpo nabundisa Satana mpe masumu kati na bomoyi oyo na makanisi ya nsomi; na suka nayeba kokonza seko seko elongo na Yesu likolo na bikelamu nyonso.
Litangi : 1Bakolinto 6:15; Misala 2:17; 11:26; Yisaya 59:21; Malako 8:38; Baromen 12:1; 6:12; 1Timote 1:18-19; 2:12; 1Yoane 2:27; Joeli 3:1; Emoniseli 1:6.

EYENGA 13

Motuna 33 : Mpo na nini abiangami muana moko na Njambe, nzokande biso pe tozali bana na Njambe?

Ezali mpo ete, kaka Klisto nde azali Muana ya seko ya Njambe na lolenge azali; biso tozali kokoma bana na Njambe bobele mpo na Ye, na ngolu mpe mpo na mokano na Ye ete tokoma bana.

Litangi : Yoane 1:1-3,14-18; Baebre 1:2; Baromen 8:15-17; Baefese 1:5-6.

Motuna 34 : Mpo na nini ozali kobianga Ye Nkolo na biso?

Mpo ete akangoli biso pe asikoli biso; njoto pe molimo; na olo to palata te, kasi na makila na Ye ya motuya; alongoli biso na masumu pe minyoko nyonso ya zabolo mpo tokoma bato na Ye mpenza.

Litangi : 1Petelo 1:18-19; 2:9; 1Bakolinto 6:20; 7:23.

EYENGA 14

Motuna 35 : Elakisi nini soki olobi : « atindamaki na Molimo Monsantu mpe abotamaki na elenge mwasi Malia »?

Ete, Muana ya seko ya Nzambe, Ye azali Njambe ya solo seko seko mpe akotikala bongo; na mosala ya Molimo Monsantu, alataki lolenge ya bomoto solo na mosuni mpe na makila uta na elenge Malia, mpo akoma solo libota ya Dawidi, akokana na bandeko na Ye na nyonso, longola lisumu.

Litangi : Yoane 1:1; 17:5; Baromen 9:5; Yoane 1:14; Matayo 1:18-20; Luka 1:35; Baebre 7:26; Baromen 1:2-4; Bagalatia 4:4-5; Njembo 132:11; Bafilipi 2:5-8.

Motuna 36 : Litomba nini ozui na mbotama monsantu ya Klisto?

Ete azala molobeli na biso mpe,lokola azangi mabe ata moko mpe azali monsantu solo, azipa lisumu na ngai nabotami na yango liboso na elongi ya Nzambe.

Litangi : Baebre 2:16-18; Njembo 32:1; 1Bakolinto 1:30.

EYENGA 15

Motuna 37 : Elobeli yo nini soki otatoli ete : « Anyokwamaki »?

Ete bomoyi na Ye mobimba awa na nse,mingi mpenza na suka, njoto na molimo na Ye ememaki mokumba ya kanda na Njambe mpo na masumu ya bato nyonso, mpo ete asikola njoto mpe molimo na biso na bilakeli mabe bobele mpo na mpasi na Ye mpe komikaba na Ye. Boye azueli biso ngolu na Njambe, bosembo mpe bomoyi ya seko.

Litangi : 1Petelo 3:18; 2:21-25; Yisaya 53:12; 1Yoane 2:2; 4:10; Baromen 3:25-26; 1Petelo 2:21-25.

Motuna 38 : Mpo na nini anyokolamaki na zuzi Pontio Pilato?

Mpo ete Ye, ata ko asalaki mabe ata moko te, azua etumbu na zuzi ya mokili oyo, boye akangola biso na esambiselo makasi ya Nzambe oyo elingaki kokweyela biso.

Litangi : Luka 23:14; Yoane 19:4; Yisaya 53:4-7; 2Bakolinto 5:21; Misala 4:27-28; Njembo 69:5; Bagalatia 3:13.

Motuna 39 : Nini yango ebakisami awa Ye abakamaki na ekulusu mpe akufi liwa ya ndenge mosusu te?

Ya solo litomba ezali, mpo sasaipi nandimi na motema ete amemi mokumba ya bilakeli mabe oyo ezalaki likolo na ngai, mpo ete liwa na ekulusu esilaki kolakelama mabe na Njambe.

Litangi : Kozongela 21:23; Bagalatia 3:13.

EYENGA 16

Motuna 40 : Mpo na nini Klisto azuaki etumbu ya Liwa?

Mpo ete bosembo mpe solo ya Njambe esengaki ete masumu na biso efutama lolenge mosusu te, bobele na nzela ya liwa ya Muana na Njambe.

Litangi : Ebandeli 2:17; Baebre 2:9-15.

Motuna 41 : Mpo na nini akundamaki?

Mpo na komonisa solo ete akufaki.

Litangi : Yoane 19:38-42; Misala 13:29; Matayo 27:59-60; Luka 23:50-53.

Motuna 42 : Kasi, lokola Klisto akufaki mpo na biso, ndenge nini biso mpenza tosengeli lisusu kokufa?

Liwa na biso ezali mpo na kofuta masumu na biso te, ezali nde nzela ya koboma lisumu mpe kokota kati na bomoyi ya seko.

Litangi : Yoane 5:24; Bafilipi 1:23; Baromen 7:24.

Motuna 43 : Litomba nini tozui lisusu kati na mbeka ya Klisto pe liwa na Ye na ekulusu?

Ete na nguya na Ye, bomoto na biso ya kala ebakama na ekulusu elongo na Ye, boye bilulela ya mabe nyonso ya bomoto ekokonza lisusu kati na biso te, kasi tozali komikaba biso mpenza lokola likabo ya kotonda Nzambe.

Litangi : Baromen 6:6-8, 11-12; 12:1; Bakolose 2:12.

Motuna 44 : Mpo na nini babakisi lisusu ete : « akitaki na se kati na bakufi »? 

Mpo ete ntango na komekama na ngai, nazala na elikia monene été Nkolo na ngai Yesu Klisto, na nzela na mitungisi ya somo atungisamaki na molimo kuna na ekulusu mpe liboso, ngai nasili kokangolama na mpasi mpe minyoko nyonso ya lifelo.

Litangi : Yisaya 53:6; Matayo 27:46.

EYENGA 17

Motuna 45 : Tozui litomba nini mpo na lisekwa ya Klisto?

Ya liboso, lokola Ye alongi liwa na nzela na lisekwa na Ye, biso tokaboli na Ye boyengebene oyo azueli biso mpo na kufa na Ye,

Ya mibale, mpo na nguya na Yesu, biso mpe, banda sasaipi, tosili kosekwa mpe tokomi na bomoyi ya sika,

Na suka, toyeba ete, mpo na lisekwa na Klisto, biso mpe tozui elaka ete tokosekwa na nkembo.

Litangi : 1Bakolinto 15:17,54; 1Petelo 1:3,21; Bakolose 3:1-5; 1Bakolinto 15:12; Baromen 8:11; Baromen 4:24;6:4; Baefese 2:5.

EYENGA 18

Motuna 46 : Ozali koyoka nini na liloba oyo ete : « abutaki na likolo »?

Ete Klisto amataki na likolo longua na mabele na miso ya bayekoli na Ye. Kuna avandi mpo na bolamu na biso kino akozonga mpo na kosambisa bato ya bomoyi mpe bakufi.

Litangi : Misala 1:9; Malako 16:19; Baebre 4:14; Baromen 8:34; Baefese 4:10; Misala 1:11; Matayo 24:30; 26:64; Luka 24:50-51; Baebre 7:25; 9:11,24,25; Bakolose 3:1-3.

Motuna 47 : Solo Kristo azali na biso elongo kino na suka ya mokili lokola alakaki biso te?

Kristo azali moto solo pe Nzambe ya solo. Na bomoto na Ye, azali lisusu na mabele oyo te kasi na bonzambe na Ye, monene na Ye, na ngolu pe Molimo na Ye, azali mosika na biso ata moke te.

Litangi : Matayo 28:20; 26:11; Yoane 16:28; 17:11; Misala 3:21; Yoane 14:17; 16:13; Baefese 4:8.

Motuna 48 : Kasi, soki bomoto ya Kristo ezali tango nyonso esika bonzambe na Ye ezali te, boye biteni mibale ya Yesu Kristo ekabwani?

Ata moke te, lokola bonzambe na Ye ekoki kokangama esika moko te pe ezali bisika nyonso ntango nyonso, yango wana esopani libanda ya bomoto kasi ezali kaka esangani penza na nzoto na Ye, ekabwani te.

Litangi : Misala 7:49; Bakolose 2:9; Yoane 3:12-15; Matayo 28:6; Yelimiya 23:24.

Motuna 49 : Kobuta na Yesu na likolo ezali kosalisa biso na nini?

Ya liboso, tozui molobeli na biso liboso na Nzambe Tata kuna na likolo,

Lisusu, lokola nzoto na biso ezui esika na lola, biso penza tozui elikya ete Ye, motu na lingomba, akonetola biso biteni na Ye kuna likolo,

Pe suka, biso awa na se, azongiseli biso Molimo na Ye lokola makasi ezali kotinda biso tolukaka makambo ya likolo, oyo ya nse te, kaka ya likolo kuna Kristo afandi na loboko ya mobali ya Nzambe.

Litangi : 1Yoane 2:1-2; Baromen 8:34; Yoane 20:17; 14:2; 14:16; 16:7; Misala 2:33; 2Bakolinto 1:22; Bakolose 3:1; Bafilipi 3:20; Baefese 2:6; 2Bakolinto 5:5; Bafilipi 3:14.

EYENGA 19

Motuna 50 : Mpo na nini babakisi ete : « azali kofanda na loboko ya mobali ya Nzambe Tata »?

Mpo ete Kristo oyo akoti na lola, azali komimonisa lokola Mokonzi ya Lingomba, pe na nzela na Ye, Tata azali kokonza biloko nyonso.

Litangi : Baefese 1:20-23; Bakolose 1:18; Matayo 28:18; Yoane 5:22.

Motuna 51 : Bokonzi ya Nkolo na biso Kristo kuna likolo ezali kosalela biso nini?

Ya liboso, na nguya ya Molimo na Ye, azali kosopela biso biteni na Ye, makabo ya likolo;

Lisusu, na nguya na Ye, azali kobatela pe kobomba biso liboso na monguna.

Litangi : Baefese 4:10; Njembo 2:9; Yoane 10:28-29; Baefese 4:8; Njembo 110:1-2.

Motuna 52 : Bozongi na Kristo mpo na « kosambisa baoyo bazali na bomoyi pe bakufi » epesi yo elikya ya ndenge nini?

Ete kati na mpasi pe miyoko, nazali kozela na mpiko nyonso, lisungi kowuta likolo epayi ya zuzi monene, oyo ayaki liboso kotelema po na ngai na esambiselo ya Nzambe, oyo abuaki mosika elakeli mabe ezalaki na ngai;

Nazali kozela lisusu ete abuaka bayini na Ye pe ya ngai kati na etumbu ya libela, pe azua ngai elongo na baponami nyonso, tovanda kati na esengo pe nkembo ya likolo.

Litangi : Luka 21:28; Baromen 8:23; Tito 2:13; 2Batesalonika 1:6-10; Matayo 25:34; 25:41-43; Bafilipi 3:20; 1Batesalonika 4:16.

NZAMBE MOLIMO MONSANTU PE KOBULISAMA NA BISO

EYENGA 20

Motuna 53 : Ozali kondima nini po na Molimo Monsantu?

Yambo, azali Nzambe ya seko elongo na Tata mpe Muana

Ya mibale, apesameli ngai mpe, mpo ete na nzela na kondima ya solo, nazua likabo ya Kristo pe bolamu na Ye nyonso, azali kosimba ngai, akoumela na ngai libela na libela.

Litangi : Ebandeli 1:2; 1Bakolinto 6:19; Misala 5:3; Matayo 28:19; 2Bakolinto 1:21-22; 1Bakolinto 6:17; Misala 9:31; Yoane 14:16; 1Petelo 4:14; Yisaya 48:16; 1Bakolinto 3:16; Bagalatia 3:14; 1Petelo 1:1-2.

EYENGA 21

Motuna 54 : Ozali kondima nini po na « Lingomba ya babulami nyonso »?

Ete uta na ebandeli ya mokili kino na suka na yango, Mwana na Nzambe azali koyanganisa pene na Ye bato ya bikolo nyonso, lisanga na baponami oyo bakozua bomoyi ya seko. Azali kobatela bango, asimbi bango na nguya ya Molimo mpe Liloba na Ye po baumela kati na bomoko ya kodima ya solo solo; ngai mpe nazali moko na bandimi ya bomoyi pe nakotikala bongo libela na libela.

Litangi : Baromen 8:29-30; Baefese 1:10-13; Ebandeli 26:4; Yoane 10:28-29; 1Bakolinto 1:8; Yisaya 59:21; Baromen 10:14-17; Misala 2:46; Baefese 4:3-6; 1Yoane 2:24-27; Baromen 1:16; Njembo 71:17-19; Matayo 16-18; 1Bakolinto 11:26.

Motuna 55 : Oyoki eloko nini po na « lisanga ya babulami »?

Ya liboso, nandimi ete bandimi nyonso lisanga pe moko na moko na bango, bazali biteni ya nzoto ya Nkolo Yesu Klisto, bongo bazali bazui na bomengo mpe makabo nyonso ya Nkolo.

Ya mibale, ebongi koyeba ete mondimi nyonso asengeli kosalela makabo nyonso azua na esengo pe motema malamu ete baninga bazua litomba pe lobiko kati na yango.

Litangi : 1Yoane 1:3; 1Bakolinto 1:9; 12:7; 12:12-13; Bafilipi 2:4-7; Baromen 8:32; 1Bakolinto 12 na 13.

Motuna 56 : Ozali kondima nini po na « kolimbisama na masumu »?

Lokola Yesu Klisto afutaki po na masumu na ngai nyonso, Nzambe alingi lisusu kokanisa yango te, alingi kutu kokanisa bomoto na ngai ya mbindo te kasi ngai moko nasengeli kobundisa mposa nyonso ya nzoto bomoyi na ngai mobimba. Nzambe, na ngolu na Ye, asili kokabela ngai bosembo ya Yesu Kristo mpo ete natelema lisusu liboso na esambiselo na Ye te.

Litangi : 1Yoane 2:2; Njembo 103:10-12; Baromen 7:24-25; 8:1-4; Yoane 3:18; Yelimiya 31:34; Njembo 103:3-4.

EYENGA 22

Motuna 57 : Elikia nini « lisekwa na bakufi » ezali kopesa yo?

Nandimi ete, sima ya bomoi oyo, Nzoto pe molimo na ngai ekomemama epai na Nkolo, Kristo. Na nguya na Ye, Nzoto na ngai ekosekwa pe ekosangana elongo na molimo na ngai po ekokana na nzoto ya nkembo ya Kristo.

Litangi :Luka 23:43; Bafilipi 1:21-23; 1Bakolinto 15:53; Yobo 19:25-26; 1Yoane 3:2; Bafilipi 3:20-21; 1Bakolinto 15.

Motuna 58 : Elikia nini ozui na bolobi ete « ondimeli bomoi ya seko »?

Ete soki nazali koyoka sasaipi ebandeli ya esengo ya seko kati na motema na ngai, sima na bomoi oyo nakotonda na esengo oyo lisu emona te, litoyi eyoka te, oyo emata na motema ya moto moko te- yonso po na kokumisa Nzambe libela na libela.

Litangi : 2Bakolinto 5:2-3; 1Bakolinto 2:9; Yoane 17:3.

EYENGA 23

Motuna 59 : Sikoyo, kondima makambo oyo nyonso ezali kosalisa yo na nini?

Ezali na tina ete nalonga na esambiselo ya Nzambe po na Kristo pe nasangola bomoi ya seko

Litangi : Abakuki 2:4; Baromen 1:17; Yoane 3:36.

Motuna 60 : Ndenge nini ozui bosembo na miso ya Nzambe?

Kaka po na kondima ya solo kati na Yesu Kristo. Lisusu, ata makanisi na ngai ezali kofunda po nabuki mibeko na Nzambe, natosi ata moko te, pe nazali kokoba na kosala kaka mabe; Nzambe Ye penza na ngolu monene azali kokabela ngai bosembo pe bonsanto ya Kristo ata nakoki na yango te, azali kozongisa boyokani po na mosala malamu na Yesu. Boye Nzambe azali kotala ngai lokola moto asala lisumu ata moko te, lokola ngai nde natosaki malamu oyo Yesu Kristo akokisaki po na ngai. Nyonso wana ya malamu ebongi koyamba yango na motema ya bondimi.

Litangi : Baromen 3:21-24; Bagalatia 2:16; Baefese 2:8; Tito 3:5; Baromen 4:4-5; 1Yoane 2:2; 2Bakolinto 5:21; Yoane 3:18; Bafilipi 3:9; Baromen 3:9; 7:23; 1Yoane 2:1; 2Bakolinto 5:19.

Motuna 61 : Mpo na nini olobi ete olongi liboso na Nzambe bobele mpo na Kondima?

Mpo ete nazali kosepelisa Nzambe te po na monene ya kondima na ngai, kasi mosala esalaki Kristo, bosembo na Ye pe bonsanto na Ye yango nde ekomi bosembo na ngai liboso na Nzambe. Boye nakoki kozua nyonso wana mpe koyamba yango bobele na nzela na kondima kaka.

Litangi : 1Bakolinto 1:29-30; 1Bakolinto 2:2; Yoane 5:10-11.

EYENGA 24

Motuna 62 : Kasi po na nini misala na biso malamu ekoki kolongisa biso ata moke te liboso na Nzambe?

Mpo ete bosembo ya solo, po etelema liboso na Nzambe esengeli kozala ya peto penza pe ekokisa solo solo mibeko na Nzambe, kasi misala na biso ya malamu koleka na bomoi na biso oyo, nyonso ekoki te mpe ezali na bosoto ya masumu.

Litangi : Bagalatia 3:10; Kozongela 27:26; Yisaya 64:6.

Motuna 63 : Boye misala na biso ya malamu ekoki kozua litomba ata moke te, po na nini Nzambi alaki kofuta biso na bomoi oyo pe na bomoi ezali koya?

Lifuti yango ekopesamela biso po tozali bato ya kokoka te kasi bobele po na ngolu na Nzambe.

Litangi : Luka 17:10.

Motuna 64 : Liteya ya motindo boye ekoki kokomisa bato goi goi mpe bafingisi na Nkombo ya bulee ya Nzambe te?

Te, ata moke te mpo ete baoyo nyonso bazali bitape ya Kristo na nzela na kondima ya solo basengeli kobota mbuma malamu ya kotonda Nzambe.

Litangi : Matayo 7:18.

II. BASAKRAMENTO MONSANTO

EYENGA 25

Motuna 65 : Mpo ete ezali kaka kondima nde ezali kosangisa biso na Kristo mpe bolamu na Ye nyonso, kondima yango ewuti wapi?

Molimo Monsanto azali kobota yango na motema na ngai pe kovandisa yango na kosalela sacramento Monsanto.

Litangi : Baefese 2:8-9; Yoane 3:5; Matayo 28:19-20; 1Petelo 1:22-23.

Motuna 66 : Sacramento ezali nini?

Ezali elembo ezali komonana pe ya bulee, ezali pe kashé ebongisami na Nzambe, azali kosalela yango mpo ayokisa biso malamu malamu bilaka ya Nsango Malamu pe akangisa yango kati na mitema na biso. Elaka yango ezali boye : « Na ngolu na Ye, azali kopesa biso kolimbisama na masumu pe bomoi ya seko bobele mpo na mbeka ya Kristo kuna na ekulusu. »

Litangi : Ebandeli 17:11-12; Baromen 4:11; Kozongela 30:6; Baebre 9:8-9,24; Ezekieli 20:12.

Motuna 67 : Liloba elongo na Sacramento yango mibale ezali na ntina ya komema kondima na biso totala mbeka ya Yesu Klisto na ekulusu lokola moboko se moko ya lobiko na biso?

Solo penza, po ete Molimo Monsanto azali koteya biso kati na Nsango Malamu pe azali kokokisa yango kati na sacramento monsantu ete lobiko na biso etongami na mbeka se moko ya Kristo, oyo amikabaki po na biso na ekulusu.

Litangi : Baromen 6:3; Bagalatia 3:26-27.

Motuna 68 : Kolandisama na Boyokani ya sika, sacramento boni ebongisami na Kristo?

Ezali mibale : Libatisa Monsanto na Elambo Monsanto.

LIBATISA MONSANTO

EYENGA 26

Motuna 69 : Ndenge nini Libatisa Monsantu ezali kopesa yo likanisi pe elikia ete bobele mbeka se moko ya Kristo na ekulusu ezali bolamu na yo?

Mpo ete Kristo abongisaki ete nasukolama libanda pe apesi elaka ete, na nzela ya makila mpe Molimo na Ye, nasukolami na mbindo ya molimo na ngai, elingi koloba ete na masumu na ngai nyonso, ndenge moko nazali kosukolama na mayi libanda po nalongola bosoto ya njoto na ngai.

Litangi : Matayo 28:19-20; Misala 2:38; Matayo 3:11; Baromen 6:3-4; Malako 1:4; 16:16; Luka 3:3.

Motuna 70 : Kosukolama na makila pe na Molimo ya Kristo elingi koloba nini?

Elingi koloba boye: kozwa na ngolu na Nzambe kolimbisama na masumu bobele mpo na makila ya Kristo esopanaki po na biso tango amikabaki na ekulusu.

Lisusu, kokomisama moto ya sika pe kobulisama na Molimo Monsanto po okoma eteni ya Kristo oyo azali koboma tango na tango bomoi ya masumu pe akomi kotambola na bomoi Monsanto ezanga mabaku.

Litangi : Emoniseli 1:5-6; 22:14; Ezekieli 36:25-27; Yoane 1:33; 3:5; 1Bakolinto 6:11; Baebre 12:24; 1Petelo 1:2; Zakarya 13:1; 1Bakolinto 12:13; Baromen 6:4; Bakolose 2:12.

Motuna 71 : Wapi esika Yesu Klisto alakaki ete biso tosukolami na makila pe na Molimo na Ye lokola pe tozali kosukolama na mayi ya batisimo?

Kati na etinda ya kobatisa tango alobaki maloba oyo : « Bokende kosakola Sango Malamu na mokili mobimba epai ya bato nyonso, bobatisa bango na kombo ya Tata pe ya Mwana pe ya Molimo Monsantu. Moto oyo akondimela ngai pe akozua batisimo, akobika. Kasi oyo akondimela ngai te, akozwa etumbu. » Elaka oyo epesami lisusu na makomi bisika Biblia ebengi batisimo ete ezali mayi ya kobotama mbala mibale pe kopetolama na masumu.

Litangi : Matayo 28:19; Malako 16:16; Tito 3:5; Misala 22:16.

EYENGA 27

Motuna 72 : Mayi ya batisimo yango moko kaka ekoki solo kopetola masumu?

Te, kaka makila ya Yesu Klisto nzela moko na Molimo Monsantu nde bazali kopetola biso na masumu yonso.

Litangi : Matayo 3:11; Baefese 5:25-27; 1Yoane 1:7; 1Bakolinto; 1Petelo 3:21.

Motuna 73 : Mpo na nini Molimo Monsantu azali kobenga batisimo ete ezali mayi ya mbotama ya sika pe bopetoli na masumu?

Ezali na ntina monene ete Nzambe alobela biso bongo: liboso, alingi koteya biso ete makila pe Molimo ya Klisto ezali kolongola masumu ndenge moko mayi ezali kosukola bosoto ya nzoto. Lisusu, na nzela ya bilembo oyo ya bonzambe, alingi kovandisa elikia na biso ete tosukolami na molimo po na masumu na biso pelamoko mayi ezali kosukola nzoto.

Litangi :Emoniseli 1:5; 7:14; 1Bakolinto 6:11; Malako 16:16; Bagalatia 3:27.

Motuna 74 : Esengeli mpe kobatisa bana mike?

Ee. Pamba te bango lokola mikolo basili kokota kati na Boyokani ya Nzambe na Lingomba na Ye, po ete elaka ya kolimbisama masumu na makila ya Klisto pe na nguya ya Molimo Monsantu epesameli bango pelamoko na mikolo; basengeli pe kokota na Lingomba na nzela ya batisimo, yango nde ezali elembo ya Boyokani na Nzambe. Boye ekopesa bokeseni kati na bana ya bandimi na bana ya bapagano, esalemaka bongo na Kondimana ya Kala na nzela ya kokatama ngenga, awa na Kondimana na Sika batisimo nde esili kozua esika.

Litangi : Ebandeli 17:7; Matayo 19:14; Luka 1:15; Njembo 22:11; Misala 2:39; Bakolose 2:11-13; Yisaya 44:1-3; Misala 10:47; Ebandeli 17:13-14.

ELAMBO MONSANTU

EYENGA 28

Motuna 75 : Ndenge nini elambo monsantu ezali kokundola pe kopesa yo elikia ete ozui litomba kati na mbeka se moko ya Klisto na ekulusu pe mbuma na yango malamu?

Klisto apesi ngai etinda elongo na bandimi nyonso ete nalia lipa pe namela kopo po na kokanisa Ye, pe apesi elaka oyo :

Ya liboso, nzoto na Ye akabamaki pe ebukanaki na ekulusu pe makila na Ye esopanaki po na ngai, ndenge moko nazali komona na miso ete lipa ya Nkolo ezali kobukama pe kopo na Ye ezali kopesama;

Ya mibale, Yesu alingi keleyisa molimo na ngai pe kosilisa posa nyonso po na bomoi ya seko; akabi nzoto na Ye na ekulusu pe asopi makila na Ye, ndenge moko nazali kolia lipa pe komale kopo na maboko ya Moteyi, nyonso wana ezali bilembo ya nzoto pe makila ya Klisto Ye moko.

Litangi : Matayo 26:26-28; Malako 14:22-24; Luka 22:19-20; 1Bakolinto 10:16-17; 11:23-25.

Motuna 76 : Kolia nzoto ya Klisto ebakamaki na ekulusu pe komela makila na Ye esopanaki elingi koloba nini?

Ezali koyamba na motema ya bondimi pasi pe kufa ya Klisto, ezali pe koyamba kolimbisama na masumu pe bomoi ya seko;

Elingi koloba pe lisusu ete nasangani makasi na nzoto mosantu ya Yesu n a nzela ya Molimo Monsantu oyo avandi kati na Ye pe kati na biso, boye ata Yesu azali kuna na likolo pe biso awa na nse, tokomi nzoto ya nzoto na Ye pe mokuwa ya Mokuwa na Ye;

Tozali bongo kokambama pe tozali na bomoi seko kati na Molimo moko pelamoko biteni ya nzoto na biso bizali kokambama na molimo moko.

Litangi : Yoane 6:35,40,47,50,53,55; 1Bakolinto 11:26; 6:15-19; Baefese 5:29-32; 1Yoane 3:24; 4:13; Yoane 6:55-58; 15:1-6; Baefese 3:14-19; 4:14-16; 5:29-32.

Motuna 77 : Wapi epai Yesu Kilisto alakaki bandimi ete akoleisa bango na nzoto na Ye pe akosilisa posa na bango na makila na Ye, nyonso lolenge bazali kolia lipa pe komela kopo?

Ezali bongo na maloba oyo ezali kobongisa lolenge ya kolia elambo : « Na butu wana batekaki Ye, Nkolo Yesu akamataki lipa, apesi Nzambe mersi, akatikati yango, pe alobaki boye : bokamata bolia, oyo ezali nzoto na ngai, napesi yango po na bino. Bosalaka boye po na kokanisa ngai. Ndenge moko pe, tango basilisi kolia, akamati kopo pe alobi boye : Kopo oyo ezali kotia boyokani ya sika kati ya Nzambe na bato; napesi makila na ngai po na kokokisa yango. Mbala nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye po na kokanisa ngai. Boye mbala nyonso bokozala kolia lipa oyo pe komela kopo oyo, bokobanda kosakola liwa ya Nkolo, tii mokolo Ye akozonga. » Elaka oyo epesami lisusu na ntoma Polo tango azali koloba boye : «Bokanisa kopo ya kobenisa oyo biso topeselaka Nzambe mersi : yango esangisaka biso na makila ya Kristo té? Pe lipa oyo toliaka esika moko, yango esangisaka biso na nzoto ya Kristo té? Lipa ezali kaka moko; boye biso nyonso tozali lokola nzoto moko, atako tozali ebele; pamba té toliaka lipa moko wana. »

Litangi : Matayo 26:26-28; Malako 14:22-24; Luka 22:19-20; 1Bakolinto 10:16-17; 11:23-26.

EYENGA 29

Motuna 78 : Solo lipa pe vino eza « kobongwana solo » nzoto pe makila ya Yesu Kristo?

Té, kasi, ndenge moko na libatisa mayi ezali kobongwama makila ya Yesu Kristo te pe ezali kopetola penza masumu na biso te kasi ezali kaka elembo, ndenge moko kati na elambo lipa ezali kobongwama nzoto penza ya Yesu Kristo te ata ko tozali kobenga yango « nzoto ya Kristo ».

Litangi : Matayo 26:29; Malako 14:24; 1Bakolinto 10:16; 11:26-28; 1Petelo 3:21; 1Bakolinto 10:1-4; Ebandeli 17:10,14,19; Tito 3:5; Kobima 12:26-27,43,48.

Motuna 79 : Po na nini kasi Kristo azali kobenga lipa nzoto na Ye pe kopo makila na Ye to boyokani ya sika kati na makila na Ye, pe Toma Polo abakisi ete ezali « kosangana na nzoto pe na makila ya Yesu Kristo »?

Kristo alobi bongo na ntina monene :

Ya liboso alingi koteya biso ete; lokola lipa pe vino ezali kotonga nzoto na biso,ndenge moko pe nzoto na Ye oyo ebakisamaki na ekulusu elongo na makila na Ye esopanaki ezali bilei ya solo solo po na milimo na biso ezua bomoyi ya seko

Ya mibale, alingi kopesa biso elikia na nzela ya bilembo oyo ezali komonana ete tokomi solo biteni ya nzoto pe makila na Ye na mosala ya Molimo Monsantu, ntango tozali kolia pe komela na monoko bilembo Monsanto oyo po na kokanisa Ye. Boye, kufa na Ye pe botosi na Ye ekomi ya biso lokola nde biso penza nde tomonaki pasi pe tofutaki masumu na biso.

Litangi : Yoane 6:51,55; 1Bakolinto 10:16-17.

EYENGA 30

Motuna 80 : Bokeseni nini ezali kati na Elambo ya Nkolo na Misa ya Eyamba ya Katolike?

Elambo ezali koteya biso ete tozui kolimbisama na masumu na biso nyonso po na likabo se moko ya Yesu Kristo, oyo amikabaki mbala se moko na ekulusu, pe ete na nguya ya Molimo Monsantu tokomi biteni ya nzoto ya Kristo oyo ozuami sasaipi kuna na Likolo na loboko ya mobali ya Tata pe alingi tongumbamela Ye bobele kuna.

Nzokande, Misa ezali koteya ete bato na bomoi na oyo bakufa bazui naino kolimbisama na masumu te na nzela ya liwa ya Kristo, bobele soki babomeli bango Kristo mokolo na mokolo epai na sango na tango ya misa, pe ete mobimba ya Kristo ezali kati na lipa pe vino, bongo esengeli tongumbamela bilembo yango.

Suka suka, misa ezali kowangana ete Yesu Kristo amikabaki pe akufaki mbala se moko, boye misa ezali motindo na kosambela bikeko.

Litangi : Yoane 19:30; Luka 22:19; 1Bakolinto 10:16; Baebre 1:3; 8:1; Yoane 4:21-24; 20:17; Luka 24:52; Misala 7:55-56; Bakolose 3:1; Bafilipi 3:20; 1Batesalonika 1:9; Baebre 9:11-14; 9:25-28; 10:9-15; Matayo 26:28; Baebre 7:27; 9 na 10; 1Bakolinto 6:17.

Motuna 81 : Banani basengeli koya na mesa ya Nkolo?

Bobele baoyo bayoki soni po na masumu na bango

Baoyo bazali bongo kondima ete masumu yango elimbisami pe bolembu na mabaku etikali na bango ezipami na nzela ya pasi pe liwa ya Kristo;

Baoyo bazali na posa makasi ya kokembisa kondima na bango pe kobongisa ezaleli na bango.

Kasi bato ya bilongi mibale na basumuki ya mpiko bango bakolia pe bakomela esambiselo na bango penza.

Litangi : 1Bakolinto 10:19-22; 1Bakolinto 11:28.

Motuna 82 : Baoyo bandimeli te pe bato na bizaleli mabe, bato ya maloba mabe pe ya bosoto, bango pe bakoki kondimama na elambo monsantu?

Ata moke te, pamba te Boyokani na biso na Nzambe ekobebisama pe kanda na Nzambe ekopela po ebebisa longomba mobimba. Yango wana, Lingomba basengeli kobengana bato yango na nzela ya bokonzi ya fungola epesameli bango, kino bakobongola bomoi na bango, oyo ezali etinda ya Kristo na Bantoma.

Litangi : Yisaya 1:11-15; Njembo 50:15-23; 1Bakolinto 11:20-22; 33-34; Yisaya 66:3; Yelimiya 7:21-23.

EYENGA 31

Motuna 83 : Bokonzi yango ya fungola basalelaka yango ndenge nini?

Ndenge mibale : na nzela ya koteya Nsango Malamu pe na Molongo ya Lingomba.Boye ekuke ya Bokonzi ya Likolo ezali kofungwama po na bandimi pe kokangama po na baoyo baboyi kondima pe kotosa.

Litangi : Matayo 16:18-19; Matayo 18:18.

Motuna 84 : Ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali kofungwama to kokangama na nzela ya koteya Nsango Malamu?

Kolandisama na etinda ya Kristo, Koteya Nsanga Molamu ezali koyebisa polele na bandimi nyonso pe na moko na moko na bango, ete tango bazali kosimba elaka na Ye na kondima ya solo solo, masumu na bango nyonso ezali penza kolimbisama epai na Nzambe po na makoki ya mosala ya Kristo.

Kasi Nsango Malamu ezali koyebisa na bato ya mitema makasi pe bilongi mibale ete Kanda na Nzambe pe etumbu ya seko ezali po na bango soki baboyi kobongola mitema.

Kolandisama na litatoli oyo ya Nsango Malamu nde Nzambe akosambisa bato nyonso kati na bomoyi oyo pe kati na bomoyi ezali koya.

Litangi : Yoane 20:21-23; Matayo 16:19

Motuna 85 : Ndenge nini Bokonzi na Likolo ezali kofungwama to kokangama na « Molongo ya Lingomba »?

Kolandisama na etinda ya Kristo, baoyo bazali kobeta tolo ete bazali bakristo, baoyo bazali na mateya ya bokeseni pe bato na bomoi ya mabe, bakokebisama mbala ebele na toli ya bandeko kati na Yesu. Soki baboyi kopesa mokongo na mabe pe mbeba na bango, nkombo na bango ekotangama liboso ya lingomba to liboso ya bampaka oyo bapesameli mosala ya koleyisa bampate. Pe soki baboyi lilendisi na bango, bakobengana bango na nzela na kopekisa basacramento, boye bakosangana lisusu na lingomba ya bakristo te, bakosangana na Nzambe te, bakokota pe te na bokonzi ya Kristo. Kasi bakoyambama lisusu lokola biteni ya Kristo pe ya Lingomba soki bamonisi elaka pe posa ya kobongwana.

Litangi : Matayo 18:15-18; 1Bakolinto 5:2-5; 2Batesalonika 3:14-15; 2Yoane 1:10-11.

ETENI YA MISATO

KOTONDA NZAMBE

EYENGA 32

Motuna 86 : Lokola tokangolami na pasi na biso bobele po na ngolu ya Kristo, tokoki ata na likambo moko te, bongo po na nini tosengeli kosala misala mlamu?

Tosengeli kosala misala malamu po

Kristo, sima ya kosomba biso na makila na Ye, ayeisi biso bato ya sika na nguya ya Molimo Monsanto tokoma lokola Ye, boye tomonisa Nzambe kati na bomoi na biso mobimba ete tozali kotonda Ye po na malamu asaleli biso pe tokumisaka Ye;

Lisusu, mbuma ya kondima na biso epesa elikia ete tozali bandimi ya solo pe bato mosusu bandimela Yesu na kotala bomoi monsantu tozali na yango

Litangi : Baromen 12:1-2; 1Petelo 2:5; 2:9-10; 2:12; 1Bakolinto 6:19-20; Matayo 5:16; 7:17; Bagalatia 5:5,22-25; Baromen 6:13; 14:19; 1Petelo 1:3-10; 3:1.

Motuna 87 : Bongo baoyo balingi kobongola mitema pe bomoi na bango te, baoyo baboyi koya epai ya Nzambe, bango pe bakoki kobika?

Ata moke te, po Liloba elobi polele été : « Ezala bamiyibi, bato ya lokoso ya mbongo, baoyo balangwaka masanga, baoyo bafingaka baninga, pe baoyo babotolaka bato biloko; bango nyonso bakokoma bato ya bokonzi ya Nzambe te. »

Litangi : 1Bakolinto 6:9-10; Baefese 5:5; 1Yoane 3:14.

EYENGA 33

Motuna 88 : Tanga biteni mibale ya bobongoli motema ya solo solo?

« Koboma moto ya kala » pe «  kosekwisa moto ya sika ».

Litangi : Baromen 6:4-6; Baefese 4:22-24; Bakolose 3:5-10; 1Bakolinto 5:7.

Motuna 89 : «  Koboma moto ya kala » elingi koloba nini?

Ezali nde koyoka nkele na se ya motema po na masumu nayo, koyina yango pe kokima yango mosika.

Litangi : Baromen 8:13; Yoele 2:13.

Motuna 90 : Bongo « kosekwisa moto ya sika » elobi nini?

Ezali nde koyoka esengo pe sai na motema po na Nzambe na Yesu Klisto. Ezali nde kotonda na esengo pe bolingo wana ozali kotosa mokano na Nzambe pe kokokisa misala yonso ya malamu.

Litangi : Baromen 5:1; 6: 10-11; 14:17; Yisaya 57:15; Bagalatia 2:20.

Motuna 91 : Misala yango malamu ezali ndenge nini?

Ezali kaka misala oyo ewuti na kondima ya solo, oyo ezali kokokisama kolandisama na mibeko pe po na lokumu ya Nzambe. Ezali te oyo ewuti na posa pe mokano na biso ya bomoto.

Litangi : Baromen 14:23; 1Samuele 15:22; Baefese 2:10; 1Bakolinto 10:31; Kozongela 11:32; Ezekieli 20:18-19; Matayo 15:7-9; Yisaya 29:13.

MIBEKO NA NZAMBE

EYENGA 34

Motuna 92 : Mibeko ya Nzambe elobi nini?

Nzambe alobaki maloba oyo nyonso boye :

  1. Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo. Ezali ngai nde moto nabimisaki yo na Ejipte, esika ozalaki na boumbu. Kokumisa banzambe mosusu te, bobele ngai.
  2. Kosala ekeko moko te po na kokumisa yango, ezala ata eloko nini oyo ekokani na bikelamo oyo ezali na likolo, awa na se, to na mai oyo ezali na se ya mabele. Kofukamela banzambe ya ndenge wana te, pe kokumisa yango te, pamba te ngai Yawe, Nzambe nay o, nazali Nzambe moko ya zwa. Bato oyo bayinaka ngai, napesaka bango etumbu, na bana na bango, bakoko na bango, pen a bana ya bakoko na bango. Kasi bato oyo balingaka ngai pe batosaka mibeko na ngai, nasalaka bango bolamu na bana na bango nyonso oyo bayaka sima.
  3. Kotanga kombo na ngai Yawe Nzambe nay o na makambo ya pamba te, po ngai Yawe napesaka etumbu na moto nyonso oyo azali kotanga kombo na ngai na makambo ya pamba.
  4. Kanisa ngai na mokolo ya kopema, komisa yango mokolo ya bosantu. Sala misala nay o nyonso na kati ya mikolo motoba. Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya kopema ya ngai Yawe, Nzambe nay o. Mokolo yango okosala mosala moko te, ezala yo moko, ezala bana nay o ya mibali to ya basi, ezala baumbu nay o, ezala banyama nay o, ezala bapaya oyo bayei kofanda epai na yo. Pamba ten a kati ya mikolo motoba nasalaki likolo na se, ebale pe biloko nyonsooyo ezali na kati, bongo na mokolo ya sambo napemaki. Yango wana ngai Yawe nabenisa Mokolo ya Kopema, pe nakomisa yango mokolo ya bosantu.
  5. Tosa tata na mama nay o, po ozala na bomoi molai na mboka oyo ngai Yawe Nzambe na yo napesi yo.
  6. Koboma moto te.
  7. Kotambola te na mwasi to na mobali ya bato.
  8. Koyiba te.
  9. Kokosela moninga makambo te.
  10. Kolula eloko ya moninga te : ezala ndako na ye, mwasi na ye, mosali na ye ya mobali to ya mwasi, ezala ngombe to punda na ye, ezala ata nini.
Kobima 20:1-17; Kozongela 5:7-21.

Motuna 93 : Tokoki kokabola mibeko yango na biteni boni?

Biteni mibale :

  • Eteni ya liboso eteyi biso na mibeko minei motindo boni tosengeli kotambola liboso na Nzambe.
  • Eteni ya mibale eteyi biso kati na mibeko motoba boni tokoki kotambola na bajalani na biso.
Litangi : Kobima 34:28; Kozongela 4:13; 10:3-4; Matayo 22:37-39.

Motuna 94 : Nzambe atindi tosala nini na mobeko ya liboso?

Po tobungisa lobiko pe bolamu ya molimo te, atindi tokima kosambela bikeko, bondoki, kobenga milimo, kobenga bansantu to bikelamo mosusu, kasi ebongi toyeba malamu penza Nzambe se moko ya solo, ye kaka, totia elikia na biso bobele epai na ye, tozela na komikitisa nyonso pe motema pete ete bobele Ye apesa biso nyonso ebongi, tolinga Ye, tokumisa pe tobanga Ye na motema mobimba, totika kotalela biloko bizali komonana pe tosala eloko te oyo etelemeli mokano ya Nzambe.

Litangi : 1Bakolinto 10:7,10,14; Kozongela 6:2; 6:5; 18:10-12; Matayo 4:10; 5:29-30; 10:37-39; 22:37; Emoniseli 22:8; Yelimiya 17:5; Baromen 5:3; Njembo 111:10; Misala 5:29; Lewitiko 19:31; Yoane 17:3; 1Petelo 5:5; Baebre 10:36; Bakolose 1:11; Bafilipe 2:14; Yakobo 1:17; Njembo 104:27-30; Yisaya 45:7; Masese 1:7; 9:10.

Motuna 95 : Kosambela bikeko elingi koloba nini?

Ezali komisalela, kozala na eloko songolo pembeni to elongo na Nzambe, kotiela eloko yango motema na esika ete olikia na Nzambe se moko ya solo oyo amimonisi polele kati na Liloba na Ye.

Litangi : Baefese 5:5; 1Batango Eleka 16:26; Bagalatia 4:8; 1Yoane 2:23; Bafilipi 3:19; Baefese 2:12; Yoane 5:23; 2Yoane 9.

EYENGA 35

Motuna 96 : Nzambe asengi nini na mobeko ya mibale?

Ete tosala ekeko moko te na motindo ya Nzambe, tosalela Nzambe te losambo mosusu ekeseni na oyo atindi tosala lokola ekomami kati na Liloba na Ye.

Litangi : Kozongela 4:15-19; Baromen 1:22-23; Misala 17:29; Yisaya 40:18-25; 1Samuele 15:23; Kozongela 12:30-32; Matayo 15:9.

Motuna 97 : Boye tokoki kosala elilingi to ekeko ata moko te?

Tokoki te, tosengeli pe te kosala elilingi to ekeko oyo ekokani na Nzambe. Pe, soki tokoki kosala ekeko to elilingi ya ekelamo songolo, Nzambe apekisi biso tongumbamela yango to tosalela yango tango tozali kosambela Ye.

Litangi : Kobima 23:24; 34:13; Kotanga 33:52; Kozongela 16:22; 2Mikonji 18:3-4; Kozongela 7:5; 12:3.

Motuna 98 : Ata bongo, bililingi ekoki kosunga na lingomba te po na koteya bato ya mayele moke?

Te, Nzambe alingi te toteya baton a Ye na nzela ya bikeko ezanga monoko, kasi alingi toteya bango na kosakola Liloba na bomoi. Biso toleki Ye na mayele te!

Litangi : Yelimiya 10:8; Abakuki 2:18-19; 2Petelo 1:19; 2Timote 3:16.

EYENGA 36

Motuna 99 : Mobeko ya misato etindi tosala nini?

Na maloba na biso totuka nkombo ya Nzambe te, tobebisa yango te na bandai ya pamba kasi ata tofandi kimia tokota na masumu ya bato te. Na mokuse, totanga kombo ya Nzambe na monoko na kobanga pe limemia, boye tokotatola, tokobenga pe tokokumisa kombo na Ye monsantu na bosembo kati na maloba pe misala na biso nyonso.

Litangi : Luka 19:12; Matayo 5:37; Yakobo 5:12; Matayo 10:32; Baromen 2:24; 1Timote 6:1; Bakolose 3:17; Lewitiko 24:10-16; Yisaya 45:23; 1Timote 2:8.

Motuna 100 : Kotuka nkombo ya Nzambe na ndai to kofinga yango, ezali lisumu ya monene koleka oyo ezali kopesa Nzambe kanda makasi kino apesa etumbu na baoyo baboyi kopekisa bizalileli ya bongo?

Boye penza, kotuka nkombo ya Nzambe ezali solo lisumu monene oyo ezali kopelisa kanda ya Nzambe makasi, yango wana atindaki bapesela yango etumbu ya liwa.

Lewitiko 24:15-16 : « Lobela mpe bato ya isalaele ete, Soko nani atuki Njambe ye akomema lisumu na ye, ya oyo atuki nkombo na Njambe akobomama, koyangana mobimba bakobola ye na mabanga, mopaya to moto abotama na Isalaele lokola. »
Tanga lisusu : Lewitiko 5:1.

EYENGA 37

Motuna 101 : Bakoki kosimba ndai monsantu na botangi nkombo na Nzambe?

Ee, liboso ya bazuzi to na makambo ya tina, po na kotatola solo, po na komonisa lokumu ya Nzambe pe kobatela lobiko ya moninga, bakoki kolapa ndai na nkombo ya Nzambe. Ndai ya bongo ezali na moboko kati na Liloba na Nzambe pe bansantu ya kala basalelaki yango na Boyokani ya kala na oyo ya sika.

Kozongela 6:13 : « Okobanga Yawe Njambe na yo, okosalela ye, mpe okosimba ndai na nkombo na Ye. »
Kozongela 10:20 : « Okomemisa Yawe njambe na yo, okosalela Ye mpe okokangana na Ye mpe okosimba ndai na nkombo na Ye. »
Tanga lisusu : Baebre 6:16; Ebandeli 31:53; 1Samuele 24:22-24; 1Mikonji 1:28-30; Baromen 1:9; Yisaya 48:1; Ebandeli 21:24; Yosua 9:15; 19:2; 2Samuele 3:35; 2Bakolinto 1:23.

Motuna 102 : Ya solo bakoki pe kosimba ndai na kombo ya bansantu to bikelamo mosusu?

Te, yeba ete ndai ya solo ezali nde kobenga nkombo ya Nzambe pe kosenga Ye moto ayebi mitema, ete aya na ngambo ya baoyo bazali kotatola solo, sima apesa etumbu na bango balobi lokuta. Ndai ya bongo esengeli kopesa lokumu bobele na Nzambe, na ekelamo mosusu te!

Matayo 5:34 :« Nde ngai najali koloba na bino ete, kata ndai soko moko te ! Soko na likolo te, mpo ete ejali efandelo na Njambe, soko na mokili te, mpo ejali etielo na makolo na Ye, soko na Yelusaleme te mpo ete ejali mboka na mokonji monene. »
Yakobo 5:12 : « Bandeko na ngai, liboso na makambo yonso, bosimba ndai te, soko na likolo te, soko na mokili te, soko ndai mosusu te. Nde tika ete ee na bino ejala ee mpe te na bino ejala te, ete bokweya na ekweli te. »
Tanga lisusu : 2Bakolinto 1:23.

EYENGA 38

Motuna 103 : Nzambe alingi nini na mobeko ya minei?

Ya liboso, Nzambe alingi ete mosala ya kosakola Liloba pe koteya makambo ya Kristo ekoba, mingi penza na mokolo ya kopema, pe ngai naya na molende yonso kosangana na lingomba po na koyoka Liloba na Nzambe, kolia elambo pe kobatisama, naya kobelela nkombo na Nzambe kati na lisanga pe namonisa misala ya bolingo ya bakristo.

Ya mibale, mikolo nyonso ya bomoi na ngai natika misala mabe, natika Molimo asala kati na ngai, boye nabanda sasaipi koyoka elengi ya esengo ya kopema ya libela ebongisami po na ngai.

Litangi : 1Timote 4:13-17; 1Bakolinto 9:11; 2Timote 2:2; 3:15; Misala 2:42; 1Timote 2:1-3; 2:8-10; 1Bakolinto 14:16; 16:2; Yisaya 66:23; Tito 1:16; 1Timote 3:14-16; 5:17; Njembo 40:10; 68:27; Misala 2:46.

EYENGA 39

Motuna 104 : Nzambe alingi nini kati na mobeko ya mitanu?

Nzambe alingi napesa lokumu, bolingo pe botosi epai ya tata pe mama na ngai pe baoyo nyonso batiami likolo na ngai;

Natosa bango na ndenge ekoki, nalanda mitindo na bango wana bajali kokamba ngai na njela malamu, nandima pe na botosi yonso mabe na bango po ete Nzambe alingi kotambuisa ngai na loboko na bango.

Litangi : Baefese 6:1-4; Bakolose 3:18-24; Masese 1:8; 4:1; 15:20; 20:20; Kobima 21:17; Baromen 13:1-7; 1Petelo 2:18.

EYENGA 40

Motuna 105 : Nzambe alingi nini na mobeko ya motoba?

Nzambe alingi ete nafinga te, nayina te, natshiola te, naboma mpe mojalani na ngai te. Ezala na makanisi na ngai, na maloba na ngai, na bizaleli na ngai to na misala na ngai, Kasi naboya posa nyonso ya kozongisa mabe na mabe. Lisusu, nasengeli te komisala mabe to komitanda ngai moko na likama. Yango wana zuzi asimbi mopanga mpo na kopesa etumbu na babomi.

Matayo 5:21 : « Bosili koyoka lokola bato ya kala balobaki ete, boma moto te, mpe ete, ye oyo akoboma moto akojala na likambo epai na esambiselo. Ngai nde nakoloba na bino ete ye oyo akosilika na ndeko na ye akojala na likambo na esambiselo. »
Matayo 26:52 : « Yesu alobi na ye ete, jongisa mopanga na yo na esika na yango. Jambi, baoyo yonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga. »
Tanga lisusu : Ebandeli 9:6; Baefese 4:26; Baromen 12:19; Matayo 18:35; 13:4; 5:25; Baromen 13:14; Kobima 21:14.

Motuna 106 : Mobeko oyo epekisi kaka koboma?

Awa Nzambe apekisi koboma, alingi lisusu koteya biso ete ayini nyonso oyo ezali mosisa ya komema liwa, makambo lokola kolula, koyina, kanda pe posa ya kozongisa mabe na mabe. Po na Nzambe, moto aumeli na makambo oyo azali mobomi na nkuku.

1Yoane 3:15 : « Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye ajali mobomi na bato, mpe toyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato ajali na bomoi na seko koumela kati na ye te. »
Tanga lisusu : Baromen 1:28-32; 1Yoane 2:9-11; Yakobo 1:20; Bagalatia 5:19-21.

Motuna 107 : Kaka koboma nde epekisami?

Te, awa Nzambe apekisi kolula, koyina pe kanda, alingi tolinga mojalani ndenge tozali komilinga biso moko, tomonisa baninga motema pete, kimia, bopolo, pe motema malamu. Tosala oyo nyonso tokoki mpo moninga akutana na likama te, tolinga ata bayini na biso.

Matayo 7:12 : « Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo. Jambi mibeko mpe basakoli ijali bongo. »
Matayo 5:44 : « Nde ngai najali koloba na bino ete, bolinga bayini na bino mpe bobondela mpo na banyokoli na bino. »
Tanga lisusu : Matayo 22:39; Baefese 4:2; Bagalatia 6:1-2; Baromen 12:18; Kobima 23:5; Matayo 5:5-9; Luka 6:36; Baromen 12:10,15,20,21.

EYENGA 41

Motuna 108 : Mobeko ya sambo esengi ngai nini?

Bosoto yonso esila kolakelama mabe epai ya Nzambe, biso pe tosengeli koyina yango na motema mobimba pe kotambola na bopeto pe bwanya ata tobali to tozali na molongani te.

Litangi : 1Batesalonika 4:3-5; Baebre 13:4; Lewitiko 18:27-30; Yuda 22-23; 1Bakolinto 7:1-11, 25-31.

Motuna 109 : Kati na mobeko oyo Nzambe apekisi kaka ekobo na bisalela mosusu?

Lokola nzoto pe molimo na biso ezali ndako ya Molimo Monsantu, Nzambe alingi tobatela yango na bopeto pe bonsantu. Boye, apekisi bosoto nyonso na etamboli na biso, na bizaleli na biso, na maloba na biso, na makanisi na biso, na bamposa, pe nyonso ekoki komema biso na nzela mabe wana.

Litangi : Baefese 5:3-4; 1Bakolinto 6:18-20; 15:33; Matayo 5:27-32.

EYENGA 42

Motuna 110 : Nzambe apekisi nini na mobeko ya muambe?

Nzambe apekisi kaka moyibi na kobotola te, yango ezali kozua etumbu na bazuzi. Azali kopekisa mayele nyonso ya mabe oyo tozali kosalela po na Kobotola biloko ya baninga, ata na makasi, ata na mayele ya moyibi lokola epimelo ya lokuta, emekelo ya lokuta, mbongo ya lokuta, biloko ya koteka ebeba… Ata mitindo nyonso ya mabe oyo epekisami na Nzambe. Apekisi biso lisusu topimela baninga te, tobebisa pe makabo apesi biso te.

Litangi : 1Bakolinto 6:9-10; 5:9-10; Luka 3:14; 1Batesalonika 4:6; Masese 11:1; Ezekieli 45:9; Masese 16:11; Kozongela 25:13-16; Njembo 15:5; Luka 6:35.

Motuna 111 : Nzambe asengi nini kasi kati na mobeko oyo?

Nzambe asengi toluka na ndenge nyonso oyo ezali na tina po na bomoi ya moninga, tosalela ye oyo tolingi basalela biso, tosala mosala na molende po tokoka kosunga baoyo bazangi ya kosilisa posa malamu ya bomoi na bango.

Litangi : Matayo 7:12; Baefese 4:28.

EYENGA 43

Motuna 112 : Mobeko ya libua etindi ngai nasala nini?

Namema matatoli ya lokuta po na moninga te, nabongola maloba na ye te, natshiola te, nakosela ye makambo te, nasalisa te baoyo babongisi kopesa moninga etumbu ya lokuta liboso ete bayoka ye; Kasi nakima mitindo nyonso ya lokuta to kokosa lokola ezali nde misala ya satana ye moko; boye nakokima kanda makasi ya Nzambe. Ezala na esambiselo to esika nini pe tango nyonso, nalinga koloba kaka solo, naloba yang ope natatola yango na motema moko. Na suka, nasala nyonso ekoki po natombola pe nabatela lokumu ya mojalani na ngai.

Litangi : Masese 19:5; 21:28; Njembo 15:3; Luka 6:37; Yoane 8:44; Masese 12:22; 1Bakolinto 13:6; Baefese 4:25; Baromen 1:29; Matayo 7:1; Masese 13:5; 19:9; 1Petelo 4:8.

EYENGA 44

Motuna 113 : Mobeko ya zomi etindi tosala nini?

Ete kati na mitema na biso, tobokola te likanisi moko ya kolula to mayele mabe songolo etelemeli Mibeko na Nzambe. Kasi toyina tango nyonso masumu pe tolinga, tosepela po na bosembo.

Litangi : Baromen 7:7.

Motuna 114 : Bongo bato oyo babongoli mitema epai ya Nzambe, bakoki solo kotosa mibeko oyo?

Te, ata bato na bonsanto penza, awa bazali naino na bomoi oyo, bazali kaka na ebandeli moke ya botosi. Kasi bazali komipesa penza po na kotosa ndambo te kasi mibeko nyonso ya Nzambe.

Litangi : 1Yoane 1:8-10; Baromen 7:14, 22-23; Yakobo 2:10; Mosakoli 7:20-22.

Motuna 115 : Boni Nzambe alingi bateya biso mibeko zomi awa eyebi Ye ete moko te akoki kotosa yango malamu na bomoi oyo?

Ya liboso, Nzambe alingi ete kati na bomoi na biso mobimba, toyeba malamu penza boni bomoto na biso ezali ya masumu pe toluka tango nyonso kolimbisama na masumu na bosembo ezuami kati na Kristo.

Ya mibale, Nzambe alingi ete tomipesa tango nyonso na kosenga Ye ngolu ya Molimo Monsantu po tokoma bato ya sika na lolenge ya Nzambe, kino na suka ya bomoi oyo tokoma peto lokola ezali mokano na Ye.

Litangi : Njembo 32:5; Baromen 7:24-25; Bafilipi 3:12-14; 1Bakolinto 9:24-27.

KOBONDELA

EYENGA 45

Motuna 116 : Po na nini tosengeli kobondela?

Po ete libondeli ezali eteni monene ya matondi Nzambe azali kosenga biso; lisusu Nzambe alingi kopesa ngolu na Ye pe Molimo Monsantu bobele na baoyo bazali kosenga yango na mabondeli ya moto pe ya tango nyonso, pe baoyo bazali kozongisela Ye matondi.

Litangi : Njembo 50:14-15; Luka 11:9-13; Matayo 7:7-8; 13:12.

Motuna 117 : Po libondeli endimama pe ezua eyano, esengeli kozala ndenge nini?

Ya liboso, tosenga na motema nyonso epai na Nzambe ya solo oyo amimonisi kati na Liloba, tosenga oyo nyonso atindaki biso tosenga na Ye.

Ya mibale, toyeba na bozindo, ete tozali babola pe bato na pasi, boye tomikitisa liboso na monene na Ye.

Ya misato, tosimba na mitema penza penza ete, Nzambe akopesa eyano na limbondeli na biso po na bolingo ya Nkolo Yesu Kristo, akotala bolembu to mabe na biso te, oyo ezali elaka apesi biso kati na Liloba na Ye.

Litangi : Yoane 4:23-24; Baromen 8:26; 1Yoane 5:14-15; 2Batango Eleka 20:12; Njembo 34:19; Yakobo 1:6-8; Yoane 14:13-16; Daniele 9:17; Njembo 2:11; Yisaya 66:2; Baromen 10:14; Matayo 7:8; Njembo 143:1.

Motuna 118 : Nzambe atindi biso tosenga nini?

Tosenga oyo nyonso esengeli po na molimo pe po na nzoto, nyonso wana Nkolo Yesu Kristo akangisa yango kati na libondeli oyo Ye moko alakisa biso.

Litangi : Yakobo 1:17; Matayo 6:33.

Motuna 119 : Libondeli yango elobi nini?

Tata na biso ya Likolo
Kombo na Yo ezala na lokumu
Bokonzi na yo eya
Nyonso yo olingi esalama awa na se
Ndenge esalamaka na Likolo
Pesa biso lelo bilei oyo ekoki
Limbisa biso mabe tosali yo
Lokola biso pe tolimbisi mabe basali biso
Kotika Monguna ameka biso te
Kasi bikisa biso na mabe
Po bokonzi, nguya pe lokumu ezali ya yo seko. Amen

Matayo 6:9-13; Luka 11:2-4.

EYENGA 46

Motuna 120 : Po na nini Kristo atindi biso tolobela Nzambe lokola Tata na biso?

Tina ete na ebandeli ya libondeli na biso tolamuisa kati na mitema limemia pe elikia oyo muana azalaka na yango po na Tata, wana ezali na litomba po Nzambe akomi Tata na biso po na Kristo. Lokola batata ya mokili bapimelaka bana eloko te, Nzambe pe alingi koboyela biso oyo tosengi Ye na kondima te.

Matayo 7:9-11 : « nani kati na bino, soko mwana na ye akolomba ye kwanga, akopesa ye libanga? Soko akolomba mbisi, akopesa ye nyoka? Boye, soko bino bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino na likolo akoleka te kopesa biloko malamu na bango bakolombaka Ye? »
Tanga lisusu : Luka 11:11-13.

Motuna 121 : Po na nini babakisi ete: ya Likolo?

Ezali po ete totala Nzambe ya Likolo lokola eloko pamba pamba te pe tozela nyonso tozali na yango posa po na nzoto pe molimo uta na loboko na Ye ya nguya.

Yelimiya 23:23 : « Yawe alobi ete, nagi najali bobele Njambe penepene? Najali mpe Njambe mosika te? »
Baromen 10:12 : « Mpo ete kati na Moyuda mpe Mwela kokabwana ezali te. Nkolo moko azali Nkolo na yonso mpe azali na bozui bokoki kosunga bato yonso bakobelela Ye. »
Tanga lisusu : Misala 17:24-27.

EYENGA 47

Motuna 122 : Kosenga ya liboso ezali nini?

« Kombo na yo ezala na lokumu » elingi koloba : sunga biso liboso ete toyeba yo malamu, tobulisa Yo, tosanjola Yo, tokumisa Yo kati na misala na biso eyeba kongenga na nguya na Yo nyonso, engenga na bwanya na Yo, engenga na bolamu na Yo, na bosembo, na mawa pe na solo na Yo. Pesa biso nguya ya kotambuisa bomoi na biso, makanisi na biso, maloba na biso pe bizaleli na biso na ndenge ete kombo na Yo efingama te po na biso, kasi ekumisama pe esanjolama.

Yoane 17:3 : « Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba Yo Njambe moko ya solo mpe bayeba Motindami na Yo, Yesu Klisto. »
Njembo 71:8 : « Monoko na ngai ekotonda na masanjoli epai na Yo, mpe lokumu na Yo mikolo yonso. »
Njembo 115:1 : « Na biso te, E Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na nkombo na Yom po na boboto mpe mpo na solo na Yo. »
Tanga lisusu : Njembo 119:105, 137; Matayo 16:17; Baromen 11:33-36; Yakobo 1:5.

EYENGA 48

Motuna 123 : Kosenga ya mibale ezali nini?

« Bokonzi na yo eya », elingi koloba : okonza likolo na biso na nzela ya Liloba pe Molimo na Yo, boye tokozala kotosa Yo tango nyonso. Simba pe kolisa Lingomba na Yo. Kueyisa misala ya Zabolo, kueyisa nguya nyonso elingi kotelemela yo pe makita nyonso basali po na kobundisa liloba monsanto na Yo, kino bokonzi na yo ekoya tango okomonana kati na biso.

Matayo 6:33 : « Bolukaka nde liboso bokonzi na Njambe mpe boyengebene na Ye mpe biloko oyo yonso ikobakisama na bino. »
Njembo 119:5 : « Malamu ete kotambola na ngai elendisama ete nabatela mibeko yonso na Yo. »
Njembo 122:6 : « Bondela mpo na kimia na Yelusaleme, baoyo bakolinga Yo bakojala na amalamu. »
Baromen 16:20 : « Na ntango moke, Njambe na kimia akonyatela Satana na nse na makolo na bino. Ngolu na Nkolo na biso Yesu ejala na bino elongo. »
1Bakolinto 15:28 : « Wana ekiti biloko yonso na nse na makolo na Ye, Mwana Ye moko akokita na nse na bokonji na Ye oyo akitisi biloko yonso na nse na Ye, ete Njambe ajala yonso kati na bato yonso. »
Tanga lisusu : Njembo 143:10; 51:20; 1Yoane 3:8; Baromen 8:22-23; Emoniseli 22:17-20.

EYENGA 49

Motuna 124 : Kosenga ya misato ezali nini?

« Nyonso yo olingi esalama awa na se ndenge esalamaka na likolo » elingi koloba ete : biso pe bato nyonso totika mokano na biso moko kasi totosa mokano na yo, na koyimayima te, po mokano na yo nde ezali ya malamu; boye moto na moto akokisa mosala opesa ye, na esengo lokola banje na likolo.

Matayo 16:24 : « Na ntango yango Yesu alobi na bayekoli na ye ete, soko nani alingi koya nsima na ngai, tika ete amiboya ye moko mpe otombola ekulusu na ye mpe abila ngai. »
Tito 2:11-12 : « Njambi ngolu na Njambe esili komonana mpo na lobiko ya bato yonso, yango ejali kolakisa biso ete toboya kotuka Njambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tojala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Njambe kati na ekeke oyo. »
Luka 22:42 : « Tata, soki okani boye, longola kopo oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalama te, kasi bobele mokano na Yo. »
Tanga lisusu : Njembo 103:20-22; 1Bakolinto 7:23-24.

EYENGA 50

Motuna 125 : Kosenga ya minei ezali nini?

« Pesa biso bilei oyo ekoki », elingi koloba : tondisa biso na nyonso tozali na yango posa po na bomoi na biso po toyeba ete ozali ebale se moko tokotoka biloko nyonso ya malamu, tososola ete soki lipamboli na yo te, makasi na biso to misala na biso to makabo opesi biso ekosunga biso te. Boye tokolongola elikia na biso epai ya bikelamu ya mokili, tokotalela se Yo.

Litangi : Njembo 104:27-30; Njembo 145:15-16; Matayo 6:25-33; Misala 14:16-17; 17:27-28; Kozongela 8:3; Njembo 37:3-7,15-16; 55:23; 62:11.

EYENGA 51

Motuna 126 : Kosenga ya mitanu ezali nini?

« Limbisa biso mabe tosali yo, lokola biso pe tolimbisi mabe basali biso » elingi koloba ete : po na makila ya Kristo, kotangela biso bato ya masumu, mokumba ya mabe pe bipengueli na biso oyo ekangami na biso te; sala ete biso tokoma litatoli ya baoyo basimbi ngolu na yo ete tozua mokano ya kolimbisa, na motema malamu, bandeko oyo basali biso mabe.

Litangi : Njembo 143:2; 1Yoane 1:9; 2:1-2; Matayo 6:14-15; Njembo 51:3-7; 32:1-5.

EYENGA 52

Motuna 127 : Kosenga ya motoba ezali nini?

« Kotika monguna ameka biso te, kasi bikisa biso na mabe » elingi koloba ete, lokola biso moko tozali bato ya bolembu pe tokoki kobunda tango mingi te liboso na banguna na biso – Satana, mokili oyo pe bomoto na biso- oyo bazali konyokola biso ngonga nyonso, Yo moko simba biso pe kembisa biso na nguya ya Molimo Monsantu. Boye kaka nde tokoki kotelemela bango na bopikiliki pe tokokueya te kati na bitumba oyo ya Molimo, kino na suka tokozua elonga monene.

1Petelo 5:8 : « Bomisenjela, bolala mpomgi te, motelemeli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soko akolia nani. »
Baefese 6:12 : «Njambi tozali kobunana na mosuni mpe makila te, kasi na bisika na lokumu mpe na nguya mpe na mikonzi na mikili oyo na molili, mpe na milimo mabe kati na likolo. »
Yoane 15:19 : « soko bojalaki baton a mokili, mbe bamokili balingaki baton a bango mpenja, Nde awa ezali bino bamokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bajali koyina bino. »
Baromen 7:22-23 : « kati na motema na ngai moto, nasepeli na mibeko na Njambe, kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na njoto na ngai. Mobeko yango monene ejali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ejali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mojali kati na bilembo na ngai. »
Bagalates 5:17: « Jambi mposa na njoto ekobunanaka na mposa na Molimo mpe mposa na Molimo ekobunanaka na mposa na njoto: yonso mibale ekotelemanaka, kopekisa bino ete bojanga kosala yango ekani bino. »
Matayo 26:41 : « bokengelaka mpe bobondelaka ete boyingela na komekama te; molimo ejali na mposa, nde njoto ejali na bolembu. »
Tanga lisusu : Malako 13:33; Yoane 15:5; Njembo 103:14-16; 1Batesalonika 3:13; 5:23.

Motuna 128 : Ozali kosukisa libondeli yango ndenge nini?

« Po bokonzi, nguya pe lokumu ezali ya Yo seko » elingi koloba ete tosengi Yo nyonso wana po ozali Mokonzi na biso oyo asimbi biloko nyonso na loboko na Yo ya nguya, okoki pe olingi kopesa biso bolamu nyonso; boye lokumu ekopesama na biso te kasi ezali ya nkombo na Yo Monsantu seko seko.

Baromen 10:11-12 : « Likomi elobi ete : Mondimi moko na Ye te akoyoka nsoni. Mpo été kati na Moyuda mpe Mwela, kokabwana ezali te. Nkolo moko azali Nkolo na yonso mpe azali na bozui bokoki kosunga bato yonso bakobelela Ye. »
Yoane 14:13 : «Mpe likambo nini bokolomba na nkombo na ngai, ngai nakosala yango ete Tata akumisama kati na Mwana. »
Njembo 115:1 : « Na biso te, E Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na nkombo na Yo, mpo na boboo mpe solo na Yo. »
Tanga lisusu : 2Petele 2:9.

Motuna 129 : Liloba moke oyo « amen » elingi koloba nini?

Amen elingi koloba ete : « ezali ya solo pe natie motema ete libondeli na ngai ekozua eyano malamu epai na Nzambe, nayoki posa wana na motema ete ezali bongo. »

2 Timote 2:13: « soko biso tojangi sembo, Ye wana akoumela na sembo, jambi akoki komiwangana Ye moko te. »
Tanga lisusu : 2Bakolinto 1:20.